Ferre Gola – Liberté Lyrics

Ferre Gola Liberté Lyrics

A quelque chose malheur est bon
Souffrance elakisi nga
Ba vrai identité ya bato
Na moni
Baye balingaka nga
Na moni
Ba oyo bayina nga Gola

Likungia ya bafiti
Ezali jamais tombe
Oyo eko komisa cellule na nga tombe
Ba golois baza nanga kaka boye
Ba jaloux ba mela ba champagne
Eko simba te

Jesus de Nuances imitateur ya Jesus de
Nazareth
Yango bazo luka baboma nga pe na ekulusu
Ndenge mama Marie na ekulusu alelaki eh
Ndenge ba mama nioso bazalaki na soucis ya
Ferre Gola

Prisonnier ata aza na nzala
Ako lia ngombe mobimba
Mais lutu moko ya poto poto ye liberté eko
tondisa ye
Na expérimenté ango
Pinzoli ya innocent na boloko
Eleki prière ya batu ya mitema mabe
Ata ba mataki mangengenge oh

Bayini na nga balukaka nini?
Ba jaloux, bafitol Gola asala nini?
Moto azali ko somnolé
Bango bazo beta lisolo ya matanga
Ebongo pongi ya makasi
Histoire nini boko beta lisusu?

Prison ekangaki nzoto
Kasi molimo na nga ezalaki ko vivre na liberté
Nabimi

Eza nga palzuria, St-Thomas ko kamwa te
Yebisa ba golois ba sepela
Bafitol bamindiembika tanpis!
Eza nga palzuria, St-Thomas ko kamwa te
Yebisa ba golois ba sepela
Bafitol bamindiembika tanpis!

Na D4 na Fleury esika nga nazalaki
Numéro d’écrou na nga 470655
Bakanisaki nga nake libela
Quand le chat n’est pas là la souris danse

Patrimoine ya Congo
Batu nioso bayebi eh
Rumba ya Wendo, Grand Kale, Franco, Tabu
ley, Papa wemba, Madilu, pépé kale, Wenge
musica, quartier latin

Prison na nga lokola jour férié
Naba fitol
Babanzi nazui pension
Rumba ekelela ba nuances ya ferre gola

Babanzi ba bloqué nga gola
Nzoka bami bloqué bango moko
Affaire oyo ya prison ekomela ferre gola enfer
Botuli!

Bayini na nga balukaka nini?
Ba jaloux, bafitol Gola asala nini?
Moto aza ko somnolé
Bango bazo beta lisolo ya matanga
Ebongo pongi ya makasi
Histoire nini boko beta lisusu?

Eza nga palzuria, St- Thomas ko kamwa te
Yebisa ba golois ba sepela
Bafitol bamindiembika tanpis!
Eza nga palzuria, St-Thomas ko kamwa te
Yebisa ba golois ba sepela
Bafitol bamindiembika tanpis!

Na molili nazalaki ko kanisa famille Gola
Bana na nga
Naba landa nzembo bazalaki touché oh
Mais affection na bino ebombaki nga

Eza nga palzuria, St- Thomas ko kamwa te
Yebisa ba golois ba sepela
Bafitol bamindiembika tanpis!
Eza nga palzuria, St- Thomas ko kamwa te
Yebisa ba golois ba sepela
Bafitol bamindiembika tanpis!